عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Believers [Al-Mumenoon] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The Believers [Al-Mumenoon] Ayah 118 Location Maccah Number 23

5. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo,

6. Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te.

8. Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango.

11. Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango.

13. Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi.

19. Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango.

20. Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi.

21. Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango.

23. Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te?

26. Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta.

27. Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu,(1) kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa).

30. Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama.

32. Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te?

39. Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta.

41. Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi.

43. Mokano ya umma(1) nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te.

44. Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te.

48. Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki(2) kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama.

50. Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele.

60. Mpe baye bazali kobimisa maye bapesi bango wana mitema mia bango mitondisami na bobangi (Nkolo wa bango), po bakozongaka epai ya Nkolo wa bango.

61. Baye wana bazali kowelisa тропа kosala bolamu, mpe bazali bato ya yambo тропа kosala (yango).

63. Kasi mitema mia bango mitondi na libungi тропа (kurani) oyo, mpe bazali na misala misusu bazali kosala (bazali kosalela yango na lolenge esengeli te oyo Allah atindi),

64. Kino tokomekisaka bato ya bozwi etumbu 0 kati na bango. Mpe okomona bango bakomi koganga тропа kosenga lisalisi.

67. (Bozalaki) kosalela yango lolendo mpe kotiola yango na tango miso na bino ezalaki polele.

71. Soki bosôló eyaki тропа kolanda bamposa na bango mbele mapata mpe mabele na maye mazali okati na yango malingaki kobeba, nzoka nde toyelaki bango bokundoli(1) na bango mpe bango тропа bokundoli na bango bazali kopesa mokongo.

72. To ozali kotuna bango lifuta? Kasi lifuta ya Nkolo nayo nde ezali malamu, ye mopesi bomengo ya malamu.

75. Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango.

76. Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga,

84. Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba.

89. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe).

91. Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela.

92. Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango.

97. Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana.

98. Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te.

103. Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango.

104. Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama.

108. Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te.

109. Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu.

111. Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi.

113. Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)

116. Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu.

117. Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te.